Home Page »  K »  Koffi Olomide
   

Fouta Djallon Lyrics


Koffi Olomide Fouta Djallon

[Intro]
Tcha-Tcho
Malheur boni otingami nga lokola singa elandaka nzela oyo ya tonga ah
L'amour n'existe pas. Il n'existe que des preuves d'amour

[Couplet 1]
Akotika yo na ndako yo moko mawa
Tango akozonga mwesé déjà ekomaki sanza
Tango okotuna ye ako yebisa yo rien qui vaille
Yo journée mobimba motema tout le temps likolo
Okobanga amona kanda na yo noki te asilika
Kanda na ye ebakisaka douleur likolo ya malheur na yo
Ngo amour ndenge nini osali mpo okomisa moto n'esik'oyo akanaki te mawa eh

[Choeur]
Olangwe ye eh eh! olangwe ye bayama
Asala yo nini ango oko katshwa se pona ye

[Couplet 2]
Ça a pas l'air comme ça
Ekosila bien te
Cas na ngai ekomi désespéré
Toyokanaka ye na ngai to binaka a l'unisson
Na la vie ngai na ye to tambola main dans la main

[Couplet 3]
Photo na ye na ndako na yo otia ya grandeur nature
Cinéma na yo preferé se oyo ya demarche na ye
Appétit ya solo ozwaka se soki alambi ye meï
Pongi ya solo olalaka se soki azali pembeni na yo
Idée na yo ofuta ba mbanda avocat ba tikela yo ye
Ezanga yo se omata na nzete o ganga tu l'aimes
Ngo amour ndenge nini osali po okomisa moto na esika oyo a kanaki te mawa eh

[Choeur]
Olangwe ye ! a komisa yo ndegé
Asala yo nin'ango okoma n'koyi ya dessin animé

[Couplet 4]
Sans délais ni préavis yo'bendani nayo
Ngai moto miso na ngai emonaki yo mokolo ozalaki kobima na se ya mayi
Sanza na mwesé ba swani po na kolula yo
Banda jour mama abotaki nga
Nazalaki'o zela yo
Boni otikeli nga gout ya mafuta ya nzoyi na mbembo
Boni okati moke ya ngai bonheur
Nani akoki'o ndima azanga elok'oyo a linga a l'infini

[Choeur]
Eloko ya bien mokolo nini okoya
Na ngambo epayi ngai naza amour elata ngai
Fololo ya tongo Diba, la reine du Fouta Djallon
Oza lokola mbongo ata mot'oyo aza n'ango ebelé

[Pont]
Soki ba pesi yé oko zua kaka
Na ko bombama yo mieux que secret ya ba pharaons

[Choeur]
Tango ba zwaka ya bango to melaka se soyi

[Pont (suite)]
Lelo na zui oy'angai eswi bino wapi

[Choeur]
Diba iiii

[Pont (suite)]
Ata nzoku azalaka na besoin ya vitamine

[Couplet 5]
Hum amour amour amour amour
Nini osali nga lelo
Po nini o priver nga de tout
Po nini o tourner nga le dos amour

[Couplet 6]
Amour, amour, amour, amour
Fulu nini obwaka oy'a yo mawa
Yo moko oteya ki nga ko pimbwa
Po nini obotoli nga mapapu
Amour
(Patrick Diam)

[Couplet 7]
Amour, amour, amour, amour
Mpo nini ozonguisi nga zero
Nazalaki mohumbu na yo
Po nini okomi opesa nga liwa avant l'heure ya la mort

[Couplet 8]
Amour oko suka na nga wapi e
Bolingo pourquoi vraiment o sili elengi
Bonbon na nga pourquoi vraiment okomi ngayi
Chiclet na ngai vraiment osili sukali avant
Diamona

[Couplet 9]
Diamona okomisa nga pondu ya matanga
Moto nioso na linga akumba oyo ya ye partie
Ngai mboto osangisi nga na malangwa
Y‘okakoli nga sans qu'otuna motuya na ngai
Yo'komisi nga etula oyo ya simba zigida

[Couplet 10]
Diamona ata kala y'okobanza nga
Ba nzungu ya kala elambaka ba supu ya bien
A près tout moyi oko zuwaka se elongi
Elengi ya makoso ezalaka na mokuwa
Yo kati mangalaba nanu na weyi te
Somba sanduku
Okolela nga
Dans pas longtemps
(Patrick)

[Couplet 11]
Bolingo oko lela nga ee
Bolingo
Visa ya bonheur ba zwaka wapi
Ambassade ekangama na libanda
Tozali ebele molongo molayi
Tozo zela
O kundalupé hé
Ata na ndegé ya kundalupé

[Outro]
Pona nini moyi ekozuaka moto se kobe na elongi
Kasi na motema te
Mokié ezali ndambo te
Stani ya Tembo
Most Read Koffi Olomide Lyrics
» Loi
» Coucou
» S.o.s.
» Roseau


Browse: