Home Page »  K »  Koffi Olomide
   

Chantou Lyrics


Koffi Olomide Chantou

[Intro]
Jackpot c'est Tcha-Tcho

[Couplet 1 : Koffi Olomidé]
Ah nga na kufa na ngai (avant)
Chérie lelo obomi (libal'oyo)
Oyo eningisaki (ba ngomba)
Yo moto o bengaki nga lobiko moyi ya esengo
Lelo o tondisi nga ba mawa

Na cimétière batu nioso tout ba kufa na maladie moko te...
Ekeseni

[Couplet 2 : Koffi Olomidé]
Manso esili koyebana
Amour na yo jamais eko zala ya ngai
Ata na sengi na mongongo ya niawu
To pe nagangi na lolaka ya nkoyi
Ndoto na nga jamais ekokoma réalité

Manso esili koyebana
Amour na yo jamais eko zala ya ngai
Ata na sengi na mongongo ya niawu
To pe nagangi na lolaka ya nkoyi
Ndoto na nga jamais ekokoma réalité

[Couplet 3 : Koffi Olomidé]
Kasi esika problème ezali, ya ngai motema lobi na ndimi te (Ekoya kokok'o tik'o linga yo)
Po emi pesa na songolo to mpakala
Na mokili moyi esi ebimi lisusu
Ngai na motema veillée esili kaka te (po na moto a ndima nga mobimba na ye)
A tika ngai kidiba na qu'est-ce que c'est

[Parler]
Moto a kufaka na mabe te

[Couplet 4 : Koffi Olomidé]
Esika ya nga maboko eza te (nde nzoto na yo mobimba ezali)
Ah Nzambe po nini esalema bongo
Muana moto mosusu akota na mposo na makila na molimo lokola magie
Moto okolinga alinga yo te na monde ango se boye
Nga natuna na Yahwe pourquoi toujours se bongo

[Chœur]
Moto oko linga alinga yo te na monde ango se boye
Nga natuna na Yahwe pourquoi toujours se bongo

[Parler]
Na rond point ya chamukwale, ba shegués

[Choeur]
Hmmmm hmmmm, hmmmm, hmmmmmmmmmmmm

[Chœur]
Nako sala nini ah po na sauver aw'okeyi otiki vide ya pamba na sima
Baninga baseki nga pe ba tsholi ngai po na tutaki tolo trop po na yo
Chantou sala ozonga, ndaku ekoma salle d'attente ya kozela amour na yo eyaka kaka te
Mikolo mi leki, ba sanza pe e passer kaka ndenge moko situation na nga, matanga

[Choeur]
Hmmmm hmmmm, hmmmm, hmmmmmmmmmmmm

[Choeur]
Soki ozo nokisa mvula yeba kokanga yango, noki te okopolisa ba innocents, Chantou
Oya nga boloko ezanga cadenas, elili na yo ezua mémoire na
Nga otage
Historia na nga maloba se mibale : amour pe pinzoli kombo no
Eza magie Chantou
Nalingaka liberté opesi nga absence
Périmètre ya pasi na ngaï, après toi suka te

[Couplet 5 : Babia Ndonga]
Chantou (Chantou)
Chantou (Chantou)
Chantou, Chantou (Chantou)

Médaille ekweya te tosala makasi tozua
Most Read Koffi Olomide Lyrics
» Loi
» Coucou
» S.o.s.
» Roseau


Browse: